The Quran in Lingala - Surah Zalzalah translated into Lingala, Surah Az-Zalzalah in Lingala. We provide accurate translation of Surah Zalzalah in Lingala - اللينغالا, Verses 8 - Surah Number 99 - Page 599.

| إِذَا زُلْزِلَتِ الْأَرْضُ زِلْزَالَهَا (1) Ntango mabele ekoningana na koningana moko ya makasi |
| وَأَخْرَجَتِ الْأَرْضُ أَثْقَالَهَا (2) Mpe sima mabele ekobimisa mikumba na yango |
| وَقَالَ الْإِنسَانُ مَا لَهَا (3) Mpe moto akoloba ete oyo nini boye |
| يَوْمَئِذٍ تُحَدِّثُ أَخْبَارَهَا (4) Mokolo wana mabele ekosakola basango na yango |
| بِأَنَّ رَبَّكَ أَوْحَىٰ لَهَا (5) Pamba te mpo Nkolo nayo asili komonisa yango |
| يَوْمَئِذٍ يَصْدُرُ النَّاسُ أَشْتَاتًا لِّيُرَوْا أَعْمَالَهُمْ (6) Mokolo wana bato bakobima bipai na bipai mpo ete bamonisa bango misala na bango |
| فَمَن يَعْمَلْ مِثْقَالَ ذَرَّةٍ خَيْرًا يَرَهُ (7) Moto oyo asalaki bolamu moke lokola mbuma zelo akomona yango |
| وَمَن يَعْمَلْ مِثْقَالَ ذَرَّةٍ شَرًّا يَرَهُ (8) Na oyo mpe asalaki mabe moke lokola mbuma zelo akomona yango |