| وَالصَّافَّاتِ صَفًّا (1) Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo
 | 
| فَالزَّاجِرَاتِ زَجْرًا (2) Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata)
 | 
| فَالتَّالِيَاتِ ذِكْرًا (3) Na baye batangaka bokundoli
 | 
| إِنَّ إِلَٰهَكُمْ لَوَاحِدٌ (4) Ya soló, Nzambe na bino azali moko
 | 
| رَّبُّ السَّمَاوَاتِ وَالْأَرْضِ وَمَا بَيْنَهُمَا وَرَبُّ الْمَشَارِقِ (5) Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele
 | 
| إِنَّا زَيَّنَّا السَّمَاءَ الدُّنْيَا بِزِينَةٍ الْكَوَاكِبِ (6) Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto
 | 
| وَحِفْظًا مِّن كُلِّ شَيْطَانٍ مَّارِدٍ (7) Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki
 | 
| لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى الْمَلَإِ الْأَعْلَىٰ وَيُقْذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبٍ (8) Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso
 | 
| دُحُورًا ۖ وَلَهُمْ عَذَابٌ وَاصِبٌ (9) Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela
 | 
| إِلَّا مَنْ خَطِفَ الْخَطْفَةَ فَأَتْبَعَهُ شِهَابٌ ثَاقِبٌ (10) Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto
 | 
| فَاسْتَفْتِهِمْ أَهُمْ أَشَدُّ خَلْقًا أَم مَّنْ خَلَقْنَا ۚ إِنَّا خَلَقْنَاهُم مِّن طِينٍ لَّازِبٍ (11) Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka
 | 
| بَلْ عَجِبْتَ وَيَسْخَرُونَ (12) Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka
 | 
| وَإِذَا ذُكِّرُوا لَا يَذْكُرُونَ (13) Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
 | 
| وَإِذَا رَأَوْا آيَةً يَسْتَسْخِرُونَ (14) Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio
 | 
| وَقَالُوا إِنْ هَٰذَا إِلَّا سِحْرٌ مُّبِينٌ (15) Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele
 | 
| أَإِذَا مِتْنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَامًا أَإِنَّا لَمَبْعُوثُونَ (16) Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu
 | 
| أَوَآبَاؤُنَا الْأَوَّلُونَ (17) Na bankoko na biso ya kala
 | 
| قُلْ نَعَمْ وَأَنتُمْ دَاخِرُونَ (18) Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama
 | 
| فَإِنَّمَا هِيَ زَجْرَةٌ وَاحِدَةٌ فَإِذَا هُمْ يَنظُرُونَ (19) Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala
 | 
| وَقَالُوا يَا وَيْلَنَا هَٰذَا يَوْمُ الدِّينِ (20) Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
 | 
| هَٰذَا يَوْمُ الْفَصْلِ الَّذِي كُنتُم بِهِ تُكَذِّبُونَ (21) Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango
 | 
| ۞ احْشُرُوا الَّذِينَ ظَلَمُوا وَأَزْوَاجَهُمْ وَمَا كَانُوا يَعْبُدُونَ (22) Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango
 | 
| مِن دُونِ اللَّهِ فَاهْدُوهُمْ إِلَىٰ صِرَاطِ الْجَحِيمِ (23) Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo
 | 
| وَقِفُوهُمْ ۖ إِنَّهُم مَّسْئُولُونَ (24) Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama
 | 
| مَا لَكُمْ لَا تَنَاصَرُونَ (25) Mpona nini bozali komisunga te
 | 
| بَلْ هُمُ الْيَوْمَ مُسْتَسْلِمُونَ (26) Kasi lelo bakoluka kozala na botosi
 | 
| وَأَقْبَلَ بَعْضُهُمْ عَلَىٰ بَعْضٍ يَتَسَاءَلُونَ (27) Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana
 | 
| قَالُوا إِنَّكُمْ كُنتُمْ تَأْتُونَنَا عَنِ الْيَمِينِ (28) Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)
 | 
| قَالُوا بَل لَّمْ تَكُونُوا مُؤْمِنِينَ (29) (Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima
 | 
| وَمَا كَانَ لَنَا عَلَيْكُم مِّن سُلْطَانٍ ۖ بَلْ كُنتُمْ قَوْمًا طَاغِينَ (30) Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe
 | 
| فَحَقَّ عَلَيْنَا قَوْلُ رَبِّنَا ۖ إِنَّا لَذَائِقُونَ (31) Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)
 | 
| فَأَغْوَيْنَاكُمْ إِنَّا كُنَّا غَاوِينَ (32) Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko
 | 
| فَإِنَّهُمْ يَوْمَئِذٍ فِي الْعَذَابِ مُشْتَرِكُونَ (33) Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu
 | 
| إِنَّا كَذَٰلِكَ نَفْعَلُ بِالْمُجْرِمِينَ (34) Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki
 | 
| إِنَّهُمْ كَانُوا إِذَا قِيلَ لَهُمْ لَا إِلَٰهَ إِلَّا اللَّهُ يَسْتَكْبِرُونَ (35) Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo
 | 
| وَيَقُولُونَ أَئِنَّا لَتَارِكُو آلِهَتِنَا لِشَاعِرٍ مَّجْنُونٍ (36) Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma
 | 
| بَلْ جَاءَ بِالْحَقِّ وَصَدَّقَ الْمُرْسَلِينَ (37) Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo
 | 
| إِنَّكُمْ لَذَائِقُو الْعَذَابِ الْأَلِيمِ (38) Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi
 | 
| وَمَا تُجْزَوْنَ إِلَّا مَا كُنتُمْ تَعْمَلُونَ (39) Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala
 | 
| إِلَّا عِبَادَ اللَّهِ الْمُخْلَصِينَ (40) Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama
 | 
| أُولَٰئِكَ لَهُمْ رِزْقٌ مَّعْلُومٌ (41) Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani
 | 
| فَوَاكِهُ ۖ وَهُم مُّكْرَمُونَ (42) (Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango
 | 
| فِي جَنَّاتِ النَّعِيمِ (43) Okati na bilanga (lola) bilamu
 | 
| عَلَىٰ سُرُرٍ مُّتَقَابِلِينَ (44) Likolo lia bambeto bizali ya kotalana
 | 
| يُطَافُ عَلَيْهِم بِكَأْسٍ مِّن مَّعِينٍ (45) Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka
 | 
| بَيْضَاءَ لَذَّةٍ لِّلشَّارِبِينَ (46) Ya pembe elengi тропа komela
 | 
| لَا فِيهَا غَوْلٌ وَلَا هُمْ عَنْهَا يُنزَفُونَ (47) Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te
 | 
| وَعِندَهُمْ قَاصِرَاتُ الطَّرْفِ عِينٌ (48) Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te
 | 
| كَأَنَّهُنَّ بَيْضٌ مَّكْنُونٌ (49) Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami
 | 
| فَأَقْبَلَ بَعْضُهُمْ عَلَىٰ بَعْضٍ يَتَسَاءَلُونَ (50) Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana
 | 
| قَالَ قَائِلٌ مِّنْهُمْ إِنِّي كَانَ لِي قَرِينٌ (51) Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga
 | 
| يَقُولُ أَإِنَّكَ لَمِنَ الْمُصَدِّقِينَ (52) Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi
 | 
| أَإِذَا مِتْنَا وَكُنَّا تُرَابًا وَعِظَامًا أَإِنَّا لَمَدِينُونَ (53) Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka
 | 
| قَالَ هَلْ أَنتُم مُّطَّلِعُونَ (54) Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo
 | 
| فَاطَّلَعَ فَرَآهُ فِي سَوَاءِ الْجَحِيمِ (55) Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo
 | 
| قَالَ تَاللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرْدِينِ (56) Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga
 | 
| وَلَوْلَا نِعْمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ الْمُحْضَرِينَ (57) Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu
 | 
| أَفَمَا نَحْنُ بِمَيِّتِينَ (58) Ezali solo te ete tokokufa te
 | 
| إِلَّا مَوْتَتَنَا الْأُولَىٰ وَمَا نَحْنُ بِمُعَذَّبِينَ (59) Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te
 | 
| إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ الْفَوْزُ الْعَظِيمُ (60) Ya soló, oyo nde elonga enene
 | 
| لِمِثْلِ هَٰذَا فَلْيَعْمَلِ الْعَامِلُونَ (61) Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala
 | 
| أَذَٰلِكَ خَيْرٌ نُّزُلًا أَمْ شَجَرَةُ الزَّقُّومِ (62) Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe)
 | 
| إِنَّا جَعَلْنَاهَا فِتْنَةً لِّلظَّالِمِينَ (63) Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi
 | 
| إِنَّهَا شَجَرَةٌ تَخْرُجُ فِي أَصْلِ الْجَحِيمِ (64) Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo
 | 
| طَلْعُهَا كَأَنَّهُ رُءُوسُ الشَّيَاطِينِ (65) Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana
 | 
| فَإِنَّهُمْ لَآكِلُونَ مِنْهَا فَمَالِئُونَ مِنْهَا الْبُطُونَ (66) Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango
 | 
| ثُمَّ إِنَّ لَهُمْ عَلَيْهَا لَشَوْبًا مِّنْ حَمِيمٍ (67) Sima bakomela mayi ya tofina ya moto
 | 
| ثُمَّ إِنَّ مَرْجِعَهُمْ لَإِلَى الْجَحِيمِ (68) Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo
 | 
| إِنَّهُمْ أَلْفَوْا آبَاءَهُمْ ضَالِّينَ (69) Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi
 | 
| فَهُمْ عَلَىٰ آثَارِهِمْ يُهْرَعُونَ (70) Mpe balandaki sé nzele na bango
 | 
| وَلَقَدْ ضَلَّ قَبْلَهُمْ أَكْثَرُ الْأَوَّلِينَ (71) Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga
 | 
| وَلَقَدْ أَرْسَلْنَا فِيهِم مُّنذِرِينَ (72) Tosilaki kotindela bango bakebisi
 | 
| فَانظُرْ كَيْفَ كَانَ عَاقِبَةُ الْمُنذَرِينَ (73) Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki
 | 
| إِلَّا عِبَادَ اللَّهِ الْمُخْلَصِينَ (74) Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
 | 
| وَلَقَدْ نَادَانَا نُوحٌ فَلَنِعْمَ الْمُجِيبُونَ (75) Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko
 | 
| وَنَجَّيْنَاهُ وَأَهْلَهُ مِنَ الْكَرْبِ الْعَظِيمِ (76) Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene
 | 
| وَجَعَلْنَا ذُرِّيَّتَهُ هُمُ الْبَاقِينَ (77) Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani
 | 
| وَتَرَكْنَا عَلَيْهِ فِي الْآخِرِينَ (78) Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
 | 
| سَلَامٌ عَلَىٰ نُوحٍ فِي الْعَالَمِينَ (79) Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba
 | 
| إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجْزِي الْمُحْسِنِينَ (80) Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi
 | 
| إِنَّهُ مِنْ عِبَادِنَا الْمُؤْمِنِينَ (81) Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima
 | 
| ثُمَّ أَغْرَقْنَا الْآخَرِينَ (82) Sima tobomaki basusu
 | 
| ۞ وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِ لَإِبْرَاهِيمَ (83) Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba
 | 
| إِذْ جَاءَ رَبَّهُ بِقَلْبٍ سَلِيمٍ (84) Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu
 | 
| إِذْ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوْمِهِ مَاذَا تَعْبُدُونَ (85) Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini
 | 
| أَئِفْكًا آلِهَةً دُونَ اللَّهِ تُرِيدُونَ (86) Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah
 | 
| فَمَا ظَنُّكُم بِرَبِّ الْعَالَمِينَ (87) Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo
 | 
| فَنَظَرَ نَظْرَةً فِي النُّجُومِ (88) Sima atalaki minzoto na bokebi
 | 
| فَقَالَ إِنِّي سَقِيمٌ (89) Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali
 | 
| فَتَوَلَّوْا عَنْهُ مُدْبِرِينَ (90) Bapesi ye mokongo bakei
 | 
| فَرَاغَ إِلَىٰ آلِهَتِهِمْ فَقَالَ أَلَا تَأْكُلُونَ (91) Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te
 | 
| مَا لَكُمْ لَا تَنطِقُونَ (92) Boye bozali koloba te тропа nini
 | 
| فَرَاغَ عَلَيْهِمْ ضَرْبًا بِالْيَمِينِ (93) Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali
 | 
| فَأَقْبَلُوا إِلَيْهِ يَزِفُّونَ (94) Sima bato bayaki epai naye na lombango
 | 
| قَالَ أَتَعْبُدُونَ مَا تَنْحِتُونَ (95) Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko
 | 
| وَاللَّهُ خَلَقَكُمْ وَمَا تَعْمَلُونَ (96) Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala
 | 
| قَالُوا ابْنُوا لَهُ بُنْيَانًا فَأَلْقُوهُ فِي الْجَحِيمِ (97) Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati
 | 
| فَأَرَادُوا بِهِ كَيْدًا فَجَعَلْنَاهُمُ الْأَسْفَلِينَ (98) Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango
 | 
| وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهْدِينِ (99) Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai
 | 
| رَبِّ هَبْ لِي مِنَ الصَّالِحِينَ (100) Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu
 | 
| فَبَشَّرْنَاهُ بِغُلَامٍ حَلِيمٍ (101) Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail)
 | 
| فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ السَّعْيَ قَالَ يَا بُنَيَّ إِنِّي أَرَىٰ فِي الْمَنَامِ أَنِّي أَذْبَحُكَ فَانظُرْ مَاذَا تَرَىٰ ۚ قَالَ يَا أَبَتِ افْعَلْ مَا تُؤْمَرُ ۖ سَتَجِدُنِي إِن شَاءَ اللَّهُ مِنَ الصَّابِرِينَ (102) Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema
 | 
| فَلَمَّا أَسْلَمَا وَتَلَّهُ لِلْجَبِينِ (103) Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye
 | 
| وَنَادَيْنَاهُ أَن يَا إِبْرَاهِيمُ (104) Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm
 | 
| قَدْ صَدَّقْتَ الرُّؤْيَا ۚ إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجْزِي الْمُحْسِنِينَ (105) Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi
 | 
| إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ الْبَلَاءُ الْمُبِينُ (106) Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele
 | 
| وَفَدَيْنَاهُ بِذِبْحٍ عَظِيمٍ (107) Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa
 | 
| وَتَرَكْنَا عَلَيْهِ فِي الْآخِرِينَ (108) Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
 | 
| سَلَامٌ عَلَىٰ إِبْرَاهِيمَ (109) Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm
 | 
| كَذَٰلِكَ نَجْزِي الْمُحْسِنِينَ (110) Lolenge wana nde tofutaka babongisi
 | 
| إِنَّهُ مِنْ عِبَادِنَا الْمُؤْمِنِينَ (111) Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi
 | 
| وَبَشَّرْنَاهُ بِإِسْحَاقَ نَبِيًّا مِّنَ الصَّالِحِينَ (112) Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu
 | 
| وَبَارَكْنَا عَلَيْهِ وَعَلَىٰ إِسْحَاقَ ۚ وَمِن ذُرِّيَّتِهِمَا مُحْسِنٌ وَظَالِمٌ لِّنَفْسِهِ مُبِينٌ (113) Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko
 | 
| وَلَقَدْ مَنَنَّا عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَارُونَ (114) Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso
 | 
| وَنَجَّيْنَاهُمَا وَقَوْمَهُمَا مِنَ الْكَرْبِ الْعَظِيمِ (115) Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene
 | 
| وَنَصَرْنَاهُمْ فَكَانُوا هُمُ الْغَالِبِينَ (116) Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi
 | 
| وَآتَيْنَاهُمَا الْكِتَابَ الْمُسْتَبِينَ (117) Mpe topesaki bango buku ya polele
 | 
| وَهَدَيْنَاهُمَا الصِّرَاطَ الْمُسْتَقِيمَ (118) Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba
 | 
| وَتَرَكْنَا عَلَيْهِمَا فِي الْآخِرِينَ (119) Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu
 | 
| سَلَامٌ عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَارُونَ (120) Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna
 | 
| إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجْزِي الْمُحْسِنِينَ (121) Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi
 | 
| إِنَّهُمَا مِنْ عِبَادِنَا الْمُؤْمِنِينَ (122) Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
 | 
| وَإِنَّ إِلْيَاسَ لَمِنَ الْمُرْسَلِينَ (123) Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami
 | 
| إِذْ قَالَ لِقَوْمِهِ أَلَا تَتَّقُونَ (124) Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te
 | 
| أَتَدْعُونَ بَعْلًا وَتَذَرُونَ أَحْسَنَ الْخَالِقِينَ (125) Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu
 | 
| اللَّهَ رَبَّكُمْ وَرَبَّ آبَائِكُمُ الْأَوَّلِينَ (126) Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala
 | 
| فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمْ لَمُحْضَرُونَ (127) Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu
 | 
| إِلَّا عِبَادَ اللَّهِ الْمُخْلَصِينَ (128) Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
 | 
| وَتَرَكْنَا عَلَيْهِ فِي الْآخِرِينَ (129) Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu
 | 
| سَلَامٌ عَلَىٰ إِلْ يَاسِينَ (130) Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye
 | 
| إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجْزِي الْمُحْسِنِينَ (131) Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi
 | 
| إِنَّهُ مِنْ عِبَادِنَا الْمُؤْمِنِينَ (132) Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi
 | 
| وَإِنَّ لُوطًا لَّمِنَ الْمُرْسَلِينَ (133) Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami
 | 
| إِذْ نَجَّيْنَاهُ وَأَهْلَهُ أَجْمَعِينَ (134) Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba
 | 
| إِلَّا عَجُوزًا فِي الْغَابِرِينَ (135) Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali
 | 
| ثُمَّ دَمَّرْنَا الْآخَرِينَ (136) Sima tobebisaki basusu
 | 
| وَإِنَّكُمْ لَتَمُرُّونَ عَلَيْهِم مُّصْبِحِينَ (137) Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo)
 | 
| وَبِاللَّيْلِ ۗ أَفَلَا تَعْقِلُونَ (138) Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te
 | 
| وَإِنَّ يُونُسَ لَمِنَ الْمُرْسَلِينَ (139) Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami
 | 
| إِذْ أَبَقَ إِلَى الْفُلْكِ الْمَشْحُونِ (140) Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
 | 
| فَسَاهَمَ فَكَانَ مِنَ الْمُدْحَضِينَ (141) Mpe aponamaki été abwakama
 | 
| فَالْتَقَمَهُ الْحُوتُ وَهُوَ مُلِيمٌ (142) Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te
 | 
| فَلَوْلَا أَنَّهُ كَانَ مِنَ الْمُسَبِّحِينَ (143) Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah
 | 
| لَلَبِثَ فِي بَطْنِهِ إِلَىٰ يَوْمِ يُبْعَثُونَ (144) Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa
 | 
| ۞ فَنَبَذْنَاهُ بِالْعَرَاءِ وَهُوَ سَقِيمٌ (145) Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni
 | 
| وَأَنبَتْنَا عَلَيْهِ شَجَرَةً مِّن يَقْطِينٍ (146) Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
 | 
| وَأَرْسَلْنَاهُ إِلَىٰ مِائَةِ أَلْفٍ أَوْ يَزِيدُونَ (147) Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka
 | 
| فَآمَنُوا فَمَتَّعْنَاهُمْ إِلَىٰ حِينٍ (148) Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke
 | 
| فَاسْتَفْتِهِمْ أَلِرَبِّكَ الْبَنَاتُ وَلَهُمُ الْبَنُونَ (149) Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali
 | 
| أَمْ خَلَقْنَا الْمَلَائِكَةَ إِنَاثًا وَهُمْ شَاهِدُونَ (150) То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona
 | 
| أَلَا إِنَّهُم مِّنْ إِفْكِهِمْ لَيَقُولُونَ (151) Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango
 | 
| وَلَدَ اللَّهُ وَإِنَّهُمْ لَكَاذِبُونَ (152) (Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta
 | 
| أَصْطَفَى الْبَنَاتِ عَلَى الْبَنِينَ (153) Boye akopona bana basi koleka bana mibali
 | 
| مَا لَكُمْ كَيْفَ تَحْكُمُونَ (154) Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana
 | 
| أَفَلَا تَذَكَّرُونَ (155) Boye bozali kokanisa te
 | 
| أَمْ لَكُمْ سُلْطَانٌ مُّبِينٌ (156) То bozali na bilembetele bisusu bia polele
 | 
| فَأْتُوا بِكِتَابِكُمْ إِن كُنتُمْ صَادِقِينَ (157) Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló
 | 
| وَجَعَلُوا بَيْنَهُ وَبَيْنَ الْجِنَّةِ نَسَبًا ۚ وَلَقَدْ عَلِمَتِ الْجِنَّةُ إِنَّهُمْ لَمُحْضَرُونَ (158) Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu)
 | 
| سُبْحَانَ اللَّهِ عَمَّا يَصِفُونَ (159) Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba
 | 
| إِلَّا عِبَادَ اللَّهِ الْمُخْلَصِينَ (160) Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama
 | 
| فَإِنَّكُمْ وَمَا تَعْبُدُونَ (161) Ya soló, bino na baye bozali kobondela
 | 
| مَا أَنتُمْ عَلَيْهِ بِفَاتِنِينَ (162) Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te
 | 
| إِلَّا مَنْ هُوَ صَالِ الْجَحِيمِ (163) Longola sé oyo akozikisama na moto
 | 
| وَمَا مِنَّا إِلَّا لَهُ مَقَامٌ مَّعْلُومٌ (164) Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani
 | 
| وَإِنَّا لَنَحْنُ الصَّافُّونَ (165) Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo
 | 
| وَإِنَّا لَنَحْنُ الْمُسَبِّحُونَ (166) Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah)
 | 
| وَإِن كَانُوا لَيَقُولُونَ (167) Ata soki bazalaki koloba
 | 
| لَوْ أَنَّ عِندَنَا ذِكْرًا مِّنَ الْأَوَّلِينَ (168) Soki tokanisaka bato ya kala
 | 
| لَكُنَّا عِبَادَ اللَّهِ الْمُخْلَصِينَ (169) Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama
 | 
| فَكَفَرُوا بِهِ ۖ فَسَوْفَ يَعْلَمُونَ (170) Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka
 | 
| وَلَقَدْ سَبَقَتْ كَلِمَتُنَا لِعِبَادِنَا الْمُرْسَلِينَ (171) Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami
 | 
| إِنَّهُمْ لَهُمُ الْمَنصُورُونَ (172) Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama
 | 
| وَإِنَّ جُندَنَا لَهُمُ الْغَالِبُونَ (173) Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga
 | 
| فَتَوَلَّ عَنْهُمْ حَتَّىٰ حِينٍ (174) Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye
 | 
| وَأَبْصِرْهُمْ فَسَوْفَ يُبْصِرُونَ (175) Мре tala bango, mosika te bakomona
 | 
| أَفَبِعَذَابِنَا يَسْتَعْجِلُونَ (176) Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso
 | 
| فَإِذَا نَزَلَ بِسَاحَتِهِمْ فَسَاءَ صَبَاحُ الْمُنذَرِينَ (177) Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama
 | 
| وَتَوَلَّ عَنْهُمْ حَتَّىٰ حِينٍ (178) Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye
 | 
| وَأَبْصِرْ فَسَوْفَ يُبْصِرُونَ (179) Mpe tala, kala mingi te bakomonaka
 | 
| سُبْحَانَ رَبِّكَ رَبِّ الْعِزَّةِ عَمَّا يَصِفُونَ (180) Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba
 | 
| وَسَلَامٌ عَلَى الْمُرْسَلِينَ (181) Kimia ezala likolo lia batindami
 | 
| وَالْحَمْدُ لِلَّهِ رَبِّ الْعَالَمِينَ (182) Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba
 |