| سَبِّحِ اسْمَ رَبِّكَ الْأَعْلَى (1) S anzola kombo ya Nkolo nayo oyo azali na likolo koleka
 | 
| الَّذِي خَلَقَ فَسَوَّىٰ (2) Oyo akela mpe akokisa
 | 
| وَالَّذِي قَدَّرَ فَهَدَىٰ (3) Mpe atia mokano mpe akamba o nzela ya nsemba
 | 
| وَالَّذِي أَخْرَجَ الْمَرْعَىٰ (4) Mpe oyo abimisa matiti
 | 
| فَجَعَلَهُ غُثَاءً أَحْوَىٰ (5) Mpe apesi yango langi ya mayi ya mpondu
 | 
| سَنُقْرِئُكَ فَلَا تَنسَىٰ (6) Tokotangisa yo na lolenge ete obosana te
 | 
| إِلَّا مَا شَاءَ اللَّهُ ۚ إِنَّهُ يَعْلَمُ الْجَهْرَ وَمَا يَخْفَىٰ (7) Sé na oyo ye moko Allah alingi, Nde ayebi maye mazali polele mpe maye mabombama
 | 
| وَنُيَسِّرُكَ لِلْيُسْرَىٰ (8) Mpe tokolakisa yo nzela ya pete
 | 
| فَذَكِّرْ إِن نَّفَعَتِ الذِّكْرَىٰ (9) Pesa liteya na baye ekosalisa bango
 | 
| سَيَذَّكَّرُ مَن يَخْشَىٰ (10) Oyo azali na bobangi nde akokanisa
 | 
| وَيَتَجَنَّبُهَا الْأَشْقَى (11) Oyo Akomitia mosika na yango ye nde moto ya mpasi
 | 
| الَّذِي يَصْلَى النَّارَ الْكُبْرَىٰ (12) Oyo akozika na moto ya monene
 | 
| ثُمَّ لَا يَمُوتُ فِيهَا وَلَا يَحْيَىٰ (13) O’nteyi na yango akokufa te mpe akozala na bomoyi te
 | 
| قَدْ أَفْلَحَ مَن تَزَكَّىٰ (14) Asili kolonga oyo amipetoli
 | 
| وَذَكَرَ اسْمَ رَبِّهِ فَصَلَّىٰ (15) Akanisi kombo ya Nkolo naye mpe asambeli
 | 
| بَلْ تُؤْثِرُونَ الْحَيَاةَ الدُّنْيَا (16) Kasi bino bolingi na bolingo makasi bomoyi ya nsé
 | 
| وَالْآخِرَةُ خَيْرٌ وَأَبْقَىٰ (17) Nzoka nde bomoyi ya lobi nde ezali malamu mpe ekowumelaka seko
 | 
| إِنَّ هَٰذَا لَفِي الصُّحُفِ الْأُولَىٰ (18) Ya sôló oyo esila kokomama na mikanda ya yambo
 | 
| صُحُفِ إِبْرَاهِيمَ وَمُوسَىٰ (19) Mikanda ya Ibrâhîm mpe ya Mûssa
 |