| إِذَا السَّمَاءُ انشَقَّتْ (1) Ntango mapata mako pasuka
 | 
| وَأَذِنَتْ لِرَبِّهَا وَحُقَّتْ (2) Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala
 | 
| وَإِذَا الْأَرْضُ مُدَّتْ (3) Mpe ntango mabele makolalisama
 | 
| وَأَلْقَتْ مَا فِيهَا وَتَخَلَّتْ (4) Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba
 | 
| وَأَذِنَتْ لِرَبِّهَا وَحُقَّتْ (5) Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala
 | 
| يَا أَيُّهَا الْإِنسَانُ إِنَّكَ كَادِحٌ إِلَىٰ رَبِّكَ كَدْحًا فَمُلَاقِيهِ (6) Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye
 | 
| فَأَمَّا مَنْ أُوتِيَ كِتَابَهُ بِيَمِينِهِ (7) Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali
 | 
| فَسَوْفَ يُحَاسَبُ حِسَابًا يَسِيرًا (8) Akosambisama na ndenge ya malamu
 | 
| وَيَنقَلِبُ إِلَىٰ أَهْلِهِ مَسْرُورًا (9) Mpe akozonga o’libota naye na esengo
 | 
| وَأَمَّا مَنْ أُوتِيَ كِتَابَهُ وَرَاءَ ظَهْرِهِ (10) Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye
 | 
| فَسَوْفَ يَدْعُو ثُبُورًا (11) Akomisengela mabe
 | 
| وَيَصْلَىٰ سَعِيرًا (12) Мре akozikisama okati ya moto ya makasi
 | 
| إِنَّهُ كَانَ فِي أَهْلِهِ مَسْرُورًا (13) Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye
 | 
| إِنَّهُ ظَنَّ أَن لَّن يَحُورَ (14) Azalaki kokanisa te ete akosekwisama
 | 
| بَلَىٰ إِنَّ رَبَّهُ كَانَ بِهِ بَصِيرًا (15) Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye
 | 
| فَلَا أُقْسِمُ بِالشَّفَقِ (16) Te na lapi na ngonga ya mpokwa
 | 
| وَاللَّيْلِ وَمَا وَسَقَ (17) Mpe na lapi na butu na molili na yango
 | 
| وَالْقَمَرِ إِذَا اتَّسَقَ (18) Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba
 | 
| لَتَرْكَبُنَّ طَبَقًا عَن طَبَقٍ (19) Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni
 | 
| فَمَا لَهُمْ لَا يُؤْمِنُونَ (20) Mpona nini bazali kondima te
 | 
| وَإِذَا قُرِئَ عَلَيْهِمُ الْقُرْآنُ لَا يَسْجُدُونَ ۩ (21) Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango
 | 
| بَلِ الَّذِينَ كَفَرُوا يُكَذِّبُونَ (22) Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta
 | 
| وَاللَّهُ أَعْلَمُ بِمَا يُوعُونَ (23) Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba
 | 
| فَبَشِّرْهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ (24) Pesa bango sango ya etumbu ya makasi
 | 
| إِلَّا الَّذِينَ آمَنُوا وَعَمِلُوا الصَّالِحَاتِ لَهُمْ أَجْرٌ غَيْرُ مَمْنُونٍ (25) Longola sé baye bandimi mpe basali misala ya malamu bazali na lifuta ya suka te
 |