| وَالْفَجْرِ (1) (Nalapi) na eleko ya ntongo
 | 
| وَلَيَالٍ عَشْرٍ (2) (Mpe nalapi) na babutu zomi
 | 
| وَالشَّفْعِ وَالْوَتْرِ (3) (Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te
 | 
| وَاللَّيْلِ إِذَا يَسْرِ (4) (Mpe nalapi) na butu ntango esilaka
 | 
| هَلْ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٌ لِّذِي حِجْرٍ (5) Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele
 | 
| أَلَمْ تَرَ كَيْفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ (6) Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad
 | 
| إِرَمَ ذَاتِ الْعِمَادِ (7) Na mboka Irama ndenge etongamaki na bandako ya likolo
 | 
| الَّتِي لَمْ يُخْلَقْ مِثْلُهَا فِي الْبِلَادِ (8) Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili
 | 
| وَثَمُودَ الَّذِينَ جَابُوا الصَّخْرَ بِالْوَادِ (9) Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba
 | 
| وَفِرْعَوْنَ ذِي الْأَوْتَادِ (10) Na Falo moto ya mapinga
 | 
| الَّذِينَ طَغَوْا فِي الْبِلَادِ (11) Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango
 | 
| فَأَكْثَرُوا فِيهَا الْفَسَادَ (12) Mpe babebisaki mingi koleka
 | 
| فَصَبَّ عَلَيْهِمْ رَبُّكَ سَوْطَ عَذَابٍ (13) Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu
 | 
| إِنَّ رَبَّكَ لَبِالْمِرْصَادِ (14) Mpo ete Nkolo nayo azali kotala
 | 
| فَأَمَّا الْإِنسَانُ إِذَا مَا ابْتَلَاهُ رَبُّهُ فَأَكْرَمَهُ وَنَعَّمَهُ فَيَقُولُ رَبِّي أَكْرَمَنِ (15) Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga
 | 
| وَأَمَّا إِذَا مَا ابْتَلَاهُ فَقَدَرَ عَلَيْهِ رِزْقَهُ فَيَقُولُ رَبِّي أَهَانَنِ (16) Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga
 | 
| كَلَّا ۖ بَل لَّا تُكْرِمُونَ الْيَتِيمَ (17) Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te
 | 
| وَلَا تَحَاضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ الْمِسْكِينِ (18) Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola
 | 
| وَتَأْكُلُونَ التُّرَاثَ أَكْلًا لَّمًّا (19) Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe
 | 
| وَتُحِبُّونَ الْمَالَ حُبًّا جَمًّا (20) Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi
 | 
| كَلَّا إِذَا دُكَّتِ الْأَرْضُ دَكًّا دَكًّا (21) Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo
 | 
| وَجَاءَ رَبُّكَ وَالْمَلَكُ صَفًّا صَفًّا (22) Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo
 | 
| وَجِيءَ يَوْمَئِذٍ بِجَهَنَّمَ ۚ يَوْمَئِذٍ يَتَذَكَّرُ الْإِنسَانُ وَأَنَّىٰ لَهُ الذِّكْرَىٰ (23) Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te
 | 
| يَقُولُ يَا لَيْتَنِي قَدَّمْتُ لِحَيَاتِي (24) Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai
 | 
| فَيَوْمَئِذٍ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُ أَحَدٌ (25) Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te
 | 
| وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُ أَحَدٌ (26) Mpe moto moko te akokangama lokola ye
 | 
| يَا أَيَّتُهَا النَّفْسُ الْمُطْمَئِنَّةُ (27) Oh yo molimo y a kimia
 | 
| ارْجِعِي إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةً مَّرْضِيَّةً (28) Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo
 | 
| فَادْخُلِي فِي عِبَادِي (29) Kota elongo na bawumbu ba ngai
 | 
| وَادْخُلِي جَنَّتِي (30) Mpe kota okati ya lola na ngai
 |