| وَالشَّمْسِ وَضُحَاهَا (1) (Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango
 | 
| وَالْقَمَرِ إِذَا تَلَاهَا (2) (Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese
 | 
| وَالنَّهَارِ إِذَا جَلَّاهَا (3) (Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala
 | 
| وَاللَّيْلِ إِذَا يَغْشَاهَا (4) (Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili)
 | 
| وَالسَّمَاءِ وَمَا بَنَاهَا (5) Mpe mapata na oyo atongi yango
 | 
| وَالْأَرْضِ وَمَا طَحَاهَا (6) Mpe mabele na oyo atanda yango
 | 
| وَنَفْسٍ وَمَا سَوَّاهَا (7) Mpe na molimo na oyo abongisa yango
 | 
| فَأَلْهَمَهَا فُجُورَهَا وَتَقْوَاهَا (8) Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)
 | 
| قَدْ أَفْلَحَ مَن زَكَّاهَا (9) Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye)
 | 
| وَقَدْ خَابَ مَن دَسَّاهَا (10) Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango
 | 
| كَذَّبَتْ ثَمُودُ بِطَغْوَاهَا (11) Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima
 | 
| إِذِ انبَعَثَ أَشْقَاهَا (12) Ntango moto mabe kati na bango atelemaki
 | 
| فَقَالَ لَهُمْ رَسُولُ اللَّهِ نَاقَةَ اللَّهِ وَسُقْيَاهَا (13) Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah ya Allah botika yango emela mayi
 | 
| فَكَذَّبُوهُ فَعَقَرُوهَا فَدَمْدَمَ عَلَيْهِمْ رَبُّهُم بِذَنبِهِمْ فَسَوَّاهَا (14) Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango
 | 
| وَلَا يَخَافُ عُقْبَاهَا (15) Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima
 |