| هَلْ أَتَاكَ حَدِيثُ الْغَاشِيَةِ (1) Ekomeli yo sango ya oyo ekozipa
 | 
| وُجُوهٌ يَوْمَئِذٍ خَاشِعَةٌ (2) Mokolo wana bilongi bikobanga
 | 
| عَامِلَةٌ نَّاصِبَةٌ (3) Makambo maleki bango bakomi na bolembu
 | 
| تَصْلَىٰ نَارًا حَامِيَةً (4) Bakozikisama o’kati ya moto ya makasi
 | 
| تُسْقَىٰ مِنْ عَيْنٍ آنِيَةٍ (5) Mpe bakomelisa bango mayi ya moto
 | 
| لَّيْسَ لَهُمْ طَعَامٌ إِلَّا مِن ضَرِيعٍ (6) Bakozala na bilei te sé matiti ya nzube
 | 
| لَّا يُسْمِنُ وَلَا يُغْنِي مِن جُوعٍ (7) Ekosilisa bango nzala te mpe ekopesa bango nzoto Nkolongono te
 | 
| وُجُوهٌ يَوْمَئِذٍ نَّاعِمَةٌ (8) Mokolo wana bilongi misusu bikozala na esengo
 | 
| لِّسَعْيِهَا رَاضِيَةٌ (9) Bikosepela pona maye basalaki
 | 
| فِي جَنَّةٍ عَالِيَةٍ (10) Okati ya lola ya likolo
 | 
| لَّا تَسْمَعُ فِيهَا لَاغِيَةً (11) Okati na yango okoyoka te makambo ya pamba pamba
 | 
| فِيهَا عَيْنٌ جَارِيَةٌ (12) Okati na yango maziba mazali kotiola
 | 
| فِيهَا سُرُرٌ مَّرْفُوعَةٌ (13) Okati na yango bambeto ya kotombwama
 | 
| وَأَكْوَابٌ مَّوْضُوعَةٌ (14) Mpe bakopo bitiami
 | 
| وَنَمَارِقُ مَصْفُوفَةٌ (15) Mpe bikáta bitandami
 | 
| وَزَرَابِيُّ مَبْثُوثَةٌ (16) Mpe bankwala bizali ya kotandama
 | 
| أَفَلَا يَنظُرُونَ إِلَى الْإِبِلِ كَيْفَ خُلِقَتْ (17) Bazali kot ala te ba ibil ndenge ekelama
 | 
| وَإِلَى السَّمَاءِ كَيْفَ رُفِعَتْ (18) Mapata lolenge etombwama
 | 
| وَإِلَى الْجِبَالِ كَيْفَ نُصِبَتْ (19) Mpe bangomba lolenge epikama
 | 
| وَإِلَى الْأَرْضِ كَيْفَ سُطِحَتْ (20) Mpe mabele lolenge etandama
 | 
| فَذَكِّرْ إِنَّمَا أَنتَ مُذَكِّرٌ (21) Kundola, pamba te yo ozali sé mokundoli
 | 
| لَّسْتَ عَلَيْهِم بِمُصَيْطِرٍ (22) Kasi ozali mokengeli likolo na bango te
 | 
| إِلَّا مَن تَوَلَّىٰ وَكَفَرَ (23) Longola sé oyo apesi mokongo mpe aboyi kondima
 | 
| فَيُعَذِّبُهُ اللَّهُ الْعَذَابَ الْأَكْبَرَ (24) Allah akopesa ye etumbu ya monene
 | 
| إِنَّ إِلَيْنَا إِيَابَهُمْ (25) Ya soló, epai na biso nde bozongi na bango
 | 
| ثُمَّ إِنَّ عَلَيْنَا حِسَابَهُم (26) Mpe ya sólo lifuta lia bango ezali omaboko na biso
 |